Toyemba App

Nkembo ndelo suka te

A.Atumenga

Refrain. Nkembo o, nkembo

Nkembo na Nzambe o likolo o nse boboto

Boboto o nse na bato ba motema, motema molamu

1. Tokokumisa Yo tokoyembela Yo

    Tokokumbamela Yo e tokotondo Yo

    Mpo ya nkembo ya Yo e

    Nkembo ndelo nsuka te e ndelo nsuka te

2. Zwa na Yo lokumu Tata wa bokasi bonso

   Mozalisi wa binso o zwa nkembo

   Nkembo ndelo nsuka te

3. Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe

    Ye nde Mwana wa Tata, zwa nkembo

    Zwa nkembo nkembo ndelo nsuka te

4. Yo Mwa Mpata ya Nzambe, okolongola masumu u

    Oyokela biso mawa a ndima losambo la biso

5. Kaka Yo Mokonzi i kaka Yo Nzambe e

    Yo moko oleki banso o

    Oleki banso nkembo ndelo nsuka te

6. Elongo n’Elimo o, n’Elimo Santu: o nkembo o

    Na Nzambe Tata, o nkembo o

    Na Yezu Kristu: amen amen amen