Nkembo 2004
Refrain. Nkembo o, nkembo nkembo na Nzambe (3x)
1. Tata o likolo bakokumisa Yo, bakokembela Yo
Biso’awa o nse tokotondo Yo, tokokumbamela Yo
Tokokumisa Yo Tata, tokoyembela Yo Tata
2. Awa o nse bato batondi na motema boboto, bakokumisa Yo
Awa o nse bato batondi na motema bolingo, bakokembela Yo
Zwa nkembo, zwa nkembo o
3. Yo Mokonzi e, Yo moko oleki banso, Yo moko oleki banso
Yo Nkumu wa bankumu, Yo Mokonzi e
Yo Mwana se moko wa Tata
Mwana zwa nkembo, zwa, zwa nkembo
4. Yo moto okolongola masumu ma bato Mwa Mpata
Mwana Mpata yoka mawa
Mwana Mpata e, Mwana Mpata ndima losambo
Mwana Mpata ee, eeee Mwana Mpata
5. Oo Yo moko Mosantu, oo Yo moko Mokonzi
Ooo oo Yo moko oleki banso
Yango wana biso banso tokoyembela Yo
Nkembo nkembo, nkembo o nkembo
6. Elongo n’Elimo Santu, o nkembo ya Nzambe Tata
O nkembo ya Nzambe Mwana, nkembo
Nkembo n’Elimo Santu
A (3x) men : Amen, amen
Nkembo, nkembo na Tata
Nkembo, nkembo na Mwana
Nkembo, nkembo n’Elimo
Nkembo na Tata Amen
Nkembo na Mwana Amen
Nkembo n’Elimo Amen. Aaa aaa aa amen.