Nkembo na nzambe
Refrain. Nkembo na Nzambe e o likolo,
O nse boboto o na bato balamu
1. Tokokumisa Yo e, tokoyembela Yo
Tokokumbamela Yo, tokokembela Yo
2. Tokotondo Yo e mpo ya nkembo ya Yo
Nkembo ya Yo Nzambe, nkembo enene
3. Mokonzi Nzambe e, Nkumu wa likolo, Tata e wa bokasi bonso
4. Mokonzi Yezu Kristu, Mwana se moko wa Ye
Mokonzi Nzambe, Mwa Mpata ya Nzambe, Mwana wa Tata
5. Okolongola masumu ma bato
Oyokela biso mawa e ondima losambo la biso e
6. Ozali elongo na Nzambe Tata, o nkembo enene nkembo : amen
Na Tata e nkembo: amen
Na Mwana nkembo: amen
N’Elimo nkembo: amen