Nkembo na mokonzi
Refrain. Nkembo na Mokonzi Nzambe o likolo
O nse boboto na bato balamu (2x)
1. Tokokumisa Yo, tokokumisa Yo, tokoyembela Yo
Tokokumbamela Yo o nkembo o nkembo na Yo
2. Tokokembela Yo, tokokembela Yo, tokotondo Yo
Mpo ya nkembo enene, nkembo o, nkembo o na Yo
3. Mokonzi Nzambe; Nkumu wa likolo
Tata e, Tata e wa bokasi bonso
4. Mokonzi Yezu Kristu, Mwana a se moko wa Ye
Mwana wa Tata nkembo
5. Yo moto okolongola masumu ma bato
Yo moto okolongola masumu u
Mwa Mpata Yoka mawa, Mwa Mpata ya Nzambe
Mwa Mpata Yoka mawa, ondima losambo
6. Yo moko Mokonzi, Yo moko Mosantu
Yo moko Nkolo o, Nkolo oleki banso
7. Ozali na nkembo ya Nzambe Tata oyokela biso mawa
Oyokela biso mawa a nkembo o
8. Elongo n’Elimo Santu o nkembo ya Nzambe Tata
Amen (3x) nkembo na Tata, nkembo na Mwana
Nkembo n’Elimo Santu, nkembo, nkembo o