Toyemba App

Nkembo na nzambe o likolo

G.Mayenda

Refrain. Nkembo na Nzambe o likolo

O nse boboto na bato ba bolingo (2x)

1. Tokokumisa Yo e, Tata e tokokembela Yo

    Tokokumbamela Yo, Tata e tokotondo Yo

2. Mokonzi Nzambe, Nkumu e wa likolo e

    Tata e wa bokasi bonso, zwa nkembo

3. Mokonzi Yezu Kristu, Mwana se moko wa Nzambe

    Yo nde Mwana wa Tata

4. Yezu Kristu Yo moko Mosantu, Yo moko Mokonzi

    Yo mok’oleki banso

5. Yo moto okolongola masumu ma bato (2x)

    Mwa Mpata, Mwa Mpata yokela biso mawa

    Mwa Mpata, Mwa Mpata ndima losambo la biso

6. Elongo n’Elimo Santu, elongo n’Elimo Santu (2x)

    O Nkembo ya Nzambe Tata amen

    O! Nkembo na Nzambe Tata amen

    O! Nkembo na Yezu Kristu : amen

    O! Nkembo n’Elimo Santu: amen

    Bango basato se Nzambe moko : amen(2x)

Final : amen amen, amen, amen (x)