Nkembo na nzambe
Refrain. Nkembo nkembo o: o nkembo o (2x)
Nkembo na Nzambe: o nkembo
O likolo: o nkembo o
Boboto awa o nse na bato ba bolingo (2x)
1. Tokokumisa Yo, tokokembela Yo
Tokokumbamela Yo, tokotondo Yo :
Mpo ya nkembo ya Yo enene (2x)
2. Mokonzi Nzambe, Nkumu wa likolo
Yo Nzambe Tata wa bokasi bonso :
Yezu Kristu Mwana wa Nzambe (2x)
3. Yo okolongola masumu ma bato banso
Oyokela biso mawa (4x)
Yo okolongola masumu ma bato bansoNdima losambo la biso (4x)
Yo ofandi o loboko la TataOyokela biso mawa (4x)
4. Yo moko Mosantu, Yo moko Mokonzi
Yezu Kristu Yo moko Mokonzi
Yo Mwana wa Nzambe oleki banso (2x)
5. Elongo n‘Elimo, Elimo Santu
O nkembo ya Nzambe, Nzambe Mokonzi
Amen (2x)
Nkembo (2x) amen, nkembo nkembo amen (2x)