Nkembo nkembo na tata e
Refrain. Nkembo nkembo nkembo na Tata e, nkembo nkembo kuna o likolo
O nse boboto na bato balamu, o nse boboto nkembo o likolo (2x)
1. Tokokumisa Yo e, tokokembela Yo e
Tokokumbamela Yo e mpe tokotondo Yo e
2. Yo nde Nkumu e, Nkumu wa likolo
Mokonzi Nzambe Tata wa bokasi bonso
3. Mokonzi Yezu Kristu Mwana se moko wa Nzambe
Yo nde Mwana wa Tata, zwa nkembo e
4. Yo nde Mwa Mpata ya Nzambe
Okolongola masumu ma biso e (2x)
Oyokela biso mawa, Mwa Mpata ndima losambo la biso
5. Uhm nkembo na Yo elongo n’Elimo Santu, (Amen)
O nkembo ya Tata AmenNkembo na Tata e Amen
Nkembo na Mwana AmenNkembo na Elimo, Amen, Amen