E e mokonzi petola ngai
Refrain. E mokonzi, petola ngai,
mabe manso malongwa nye,
nakoma peto.
1. Na yei o miso ma Mokonzi,
E Nzambe, yokela ngai mawa, nakoma peto
2. Mama aboti ngai moombo,
Motema mwa ngai mobebi mingi, nakoma peto
3. Zambi lisumu lya bankoko,
Liyei kobebisaka bato, nakoma peto.
4. Bobe bwa biso bwa kaesi,
Mpe tozwa bolimbisi bwa yo, nakoma peto
5. Yamba lya ngai libonza lelo,
Yamba motema mokolela, nakoma peto