Ngai mosumuki
Refrain. Ngai mosumuki nayei epai na Yo,
Ngai mosumuki, ngai moto ya mawa,
Petola ngai nayei epai na Yo
Petola ngai Yo Nzambe wa mawa,
Petola ngai nayei epai na Yo
Petola ngai, Yo nde Nzambe wa ngolu,
Petola ngai nayei epai na Yo
1. Lokola mwasi mosumuki, na kangami na bokali, babwaka ngai mabanga te,
Tala ngai na miso ya ngolu, yokela ngai mawa
1-3. Yo nde Nzambe wa ngolu, petola ngai nayei epai na Yo.
2. Ngai ko mwana wa Eva nabotami na lisumu
Nafandi o nse ya pota ya mopanzi mwa Yo,
Nasukola mayi ma bomoi, na petwama na makila ma libiki,
3. Ngai pe lokola Zakeo, na kiti o nzete ya lisumu
Natiki manso ma kala na bomoi bwa ngai
Nakoma moto mwa sika, nazala wa Yo nde ndeko,