Yezu ntombwama na yo
Refrain. Yezu ntombwama na Yo (2x)
Mpo liwa lya Yo o kuruse esikoli ngai
1. Ngai nazalaki ekelamu mpamba,
Na batisimo nakomi mwana wa Nzambe
Yezu akati bondeko na ngai : Na makila ma Ye
Yango wana lelo oyo nazongisi lokumu na Yo, Lokumu mpe nkembo na Yo
2. Botombwami na Yo Yezu, ozui yango na nkita ya nse eye te,
Kasi ekokisami na Kuruse Y’omemi: kin’o ngomba Golgotha
Yango wana lelo oyo biso toluki nkita na biso kati na Yezu
Mopesi bomengo ya solo, ya solo, ya solo Yezu
3. Mpo ya lisumu lya moto wa yambo, ngai mpe nakomaki mokufi
Kasi Yo wana osombi ngai na makila ma Yo : na ntalo monene
Yango wana lelo oyo nazongisi lokumu na Yo, Emanuel kumbama seko
.4. Ndenge Moise atombolaki nyoka ya ebende
Mpo’te bana Israel batala mpe babika,
Se bongo Yezu batomboli Yo o kuruse
Mpo’te biso totombwama: elongo na Yo
Yango wana lelo oyo toyembeli nkombo na Yo,
Nkosi na Yuda kumbama na Yo
5. Kuruse na Yo, Ya’ Yezu eyeli ngai libiki,
Na makila ma Yo Yezu ofuti nyongo
Ya masumu ma ngai manso o.
Nakumisi Yo, nakumisi Yo, natomboli Yo nabineli Yo
R2 Manso makoki o kuruse, Yezu atombwami o kuruze (2x)
6. Mpo na kuruse Yezu omemi e
Ngai nasikolami mpe nazui bomoi,
Nakoyembela Yo, nzembo ya lokumu
Mpe nakotombola nkombo ya Yo
Mpo na makila ma Yo osopi,
Mpo ‘te ngai lelo nazua ngo libiki