Nzambe otonda ngolu
Refrain. Mokonzi, Mokonzi e, Yo nde Nzambe (2x)
Tenor : Limbisa e
Tous : Limbisa Nzambe wa ngolu kotala mabe te, limbisa e
Limbisa Nzambe wa ngolu, masumu maluti, limbisa e
Yo Nzambe Tata wa ngolu, yokela biso bana tobeleli Yo (2x)
1. Nabotamaki na mbindo, nakolisami na mbindo,
Ngai oyo nalembi na masumu (2x)
Ténor : Tosali mabe e
Tous : Tosali mabe oboso bwa Yo e, Yo Mokonzi, limbisa e
Toleli na Yo Nzambe wa ngolu mbindo eluti, petola e
2. Nabongi te Mokonzi, kopusana oboso bwa Yo,
Mpo ngai natondi na mbindo (2x)
A+T : Limbisa e
Tous : Limbisa e Nzambe wa ngolu kotala mabe te, limbisa e
Limbisa e Nzambe wa ngolu, masumu maluti, limbisa e
3. Soki otali masumu, nani lisusu akobika ?
Yo Nzambe otonda ngolu (2x)
Ténor : Tosali mabe e
Tous : Toleli na Yo Nzambe wa ngolu mbindo eluti, petola e