Toyemba App

Nayei lelo epai na yo

G.Abbé lewo

Refrain. Nayei lelo epai na Yo Nzambe wa ngolu

Nayei lelo epai na Yo Nzambe wa bolingo

Mpo Yo Nzambe Nkolo wa bolingo bwa ngai,

Wana nde ntina ya esengo na ngai, e Yo nde Tata e,

Ozali Tata wa ngai, okobwaka ngai te, okoyamba ngai mwana wa Yo

1.       Nazalaki mwana mwasi azanga botosi e,

          Koiyenga yenga mpamba mpamba butu mpe moi e,

          Yamba bomoi bwa ngai lokola libonza kitoko e,

          Nasalela Yo e na ndakisa elamu e

Tous : Okobwaka ngai te, okoyamna ngai mwana wa Yo

          Nazalaki mwana mobali alula molangwa e,

          Kobunda mpamba mpamba, moyibi epai e

          Osalisa ngai e nakoma moto wa ntina e

2.       Nazalaki Tata mabe Nzambe o kati ya libota e,

          Nasundolaki mwasi wa ngai, nabosanaki mpe bana e,

          Kasi nabimi lelo Nzambe o'boso bwa Yo e,

          Osalisa ngai e nabongola motema e

          Nazalaki mama mabe atonda lokuta mpe lokoso e,

          Nakosaki mobali wa ngai natindaki bana na nzela mabe,

          Kasi lelo nandimi Nzambe kotika mabe na ngai,

          Osalisa ngai e, namileli na Yo e

3.       Opesaki ngai bokonzi mpo na kamba baninga e

          Kasi ngai nabebisi nkita ya mboka e nakani kobongisa e

          Osalisa ngai e oponaki ngai nazala moteyi ya Nsango elamu e

          Kasi natondaki na lolendo nazangaki bosolo e

          Otondisa ngai e na Elimo wa Yo e.

Usage liturgique : Carême, Vendredi Saint, Asperge