Limbisa nzambe wa ngolu
Refrain. Limbisa Nzambe wa ngolu, Nzambe,
Tata masumu ko matonda (2x)
1. Se lokola sonzo ekokangama moto na loposo ya nzoto
Lisumu likangi biso nzambe
2. Ata masumu ma ngai makomi mpenza ngola,
Nazali na elikya Yok'olimbisa ngai Nzambe
3. Tokoma se kobomana biso na biso
Tobosani mobeko monene ya bolingo Nzambe
4. Soki otali masumu moko te akobika,
Tata Yo nta bolingo, tata olimbisa bana
5. Nafingaki, natongaki e Tata olimbisa
Nalulaki, nayibaki e, Tata olimbisa
Tata wa ngolu oyoka mawa, Tata olimbisa
5-8. Tata (3x) olimbisa, Tata, Tata
6. Nakosaki nabomaki e, Tata olimbisa
Naswanaki, nabundaki e, Tata olimbisa
Tata wa bolingo yoka mawa, Tata olimbisa
7. Tala ngai mwana nayei Tata olimbisa
Tandela ngai loboko, Tata olimbisa
Nkolo wa bomoi, oyoka mawa
8. Simba ngai mwana wa Yo e, Tata olimbisa
Masumu elangwisi ngai e, Tata olimbisa
Tata wa bokasi oyoka mawan Tata olimbisa
Usage liturgique : Carême, Vedredi Saint, Asperge