Toyemba App

A nzambe wa bolingo

O.Ngoy matala

Refrain. A! Nzambe wa bolingo, boni Yo otiki ngai boye,

Na kati ya mpasi na minyololo, ndenge nini nakobika

1.    O kati ya molili na kobelela Yo,

       Yo mei solo Nzambe wa ngai,

       Soki oboyi koyokamela ngai mwana,

1-4. Ndenge nini nakobika ?

2.     Nabeleli, nabeleli ata eyano te,

        Na mpasi ya boye nakosuka wapi ? 

        Nakomi pembeni ya libulu ya liwa:

3.     Pinzola na miso ekosila te,

        Butu na moi nakoma se kolela,

        Boleli bwa ngai Nzambe oboyi kondima

4.     Elikya ya ngai se epai na Yo,

        Maksanisi ma ngai se epai na Yo,

        Soki otali lisusu masumu ma ngai