Toyemba App

E nzambe yaka

C.Pasa

Refrain. E! Nzambe yaka sukola ngai nakoma peto yaka,

Naluki Yo bisika binso yaka, masumu maluti ngai mingi yaka

1. Mikolo minso ngai Bible na maboko,

    Lomingo inso nazali na Eklezya,

    Kasi Nzambe namona Yo te,

    Ndeko bongola motema mwa Yo e

2. Ntango inso koteya Nsango Elamu,

    Mosolo mwa ngai mosili na babola,

    Kasi Nzambe namona Yo te,

    Ndeko lakisa bolingo bwa solo

3. Mikolo minso sapele, na losambo,

    Minei inso nazali na lisanga,

    Kasi Nzambe namona Yo te,

    Ndeko bongola motema mwa Yo e