Nkolo nayei
Refrain. Nkolo nayei kokumbamela Yo,
Oyoka ngai mosumuki mawa,
Mikakatano milati ngai nzoto,
Lelo nayei kozua lisalisi epai na Yo
1. Limbisa ngai nazali peto te,
Mpo naloba na Yo Nzambe wa ngai,
Nalukaki libiki epai ya bato
Nabosanaki Yo Nzambe wa ngai,
1-4. Bikisa ngai awa nayei epai na Yo, Nzambe wa ngai
2. Salisa ngai Nkolo wa ngai,
Yo mei ozali Tata wa bolingo,
Nabonzeli Yo ba mpasi na ngai,
Mpe mpasi ya bandeko banso wa ngai,
3. Tata ngai Nkolo mai etondi miso,
Mpo ya kobondela Yo Nzambe wa ngai,
Nayebi te ya solo se Yo libiki,
Sala na ngai lokola Y'olingi,
4. Ba mpasi na ngai ya nzoto Nzambe,
Minyoko penza mitungisi ngai,
Milimo mabe milati ngai nzoto,
Nayei kobonza yango epai na Yo (2x)