Toyemba App

Nkolo tata wa bolingo

P.Balenza

Nkolo Tata wa bolingo

Nayei lelo epai na Yo

Kobelela mpe kosenge nguya ya Yo.

1. Elongi na Yo kobomba te,

    Matoyi ma Yo kozipa te,

    Lolaka la ngai oyoka, Nzambe wa ngai. (Bis)

Refrain. Nzoto na ngai nsuni ya pamba,

Molimo mwa ngai mokomeli te,

Petola ngai na makila,

Ma Yezu o Kuruse,

Nzambe wa ngai. (Bis)

2. Elimo santu, Elimo ya Nzambe,

    Yingisa kati na ngai, mwa Yo moto mosantu,

    Yingisa kati na ngai, mwa Yo mwinda monene