Nabeleme na lotale la yo
Refrain. Nabeleme na lotale la Yo Tata Nzambe,
Yo nsai ya bomoi bwa ngai.
1. Salisa ngai Mokonzi e mpe obikisa ngai,
O maboko ma banguna ba molimo mwa ngai.
2. Zambi Yo okobikisa nakolikya na Yo,
Na lisalisi lya Yo nde naboyi masumu (zabolo).
3. Yo mwinda mpe bosolo mei okamba ngai,
O lopango la Tata o mboka ya bisengo.
4. Motema nsai mpo ya Yo nakoyembela Yo,
Nzembo ya botondi Yo mokolo na mokolo.
5. Na Tata mpe na Mwana e, na Elimo santo,
Nkembo na bileko na bileko seko, Amen.