Toyemba App

Anuarite zua lokumu

C.Kabeya

1. Ozua lokumu Nengapeta mpo ya manso osalaki o nse,

Omipesaki solo na losambo, otosi Nzambe kin’o nsuka

Refrain. Anuarite (3x) ngondo martyro zwa lokumu,

Otosi Nzambe kin’o nsuka

2. Biso lelo tokoyembela yo nzembo ya esengo e

Sambelaka mpo ya biso mpo’te tolanda nzela ya yo

3. Bandeko ba yo ba Congo basepeli mbula ntuku itano,

Mbula ntuku itano ut’obotami o likolo,

Tokosenge na Nzambe balubola yo mosantu,

Mosantu o Eklezya (2x)