Longonya anuarite

D.Ngala

Refrain. Anuarite (3X) yo ngondo mpe martiru ya Congo Anuarite (2x)

Omikabi mobimba mpo ya Kristu

Anuarite, okomi e o mboka ya Nzambe esengo enene (2x)

1. Ondimi mpasi mpe minyoko Anuarite,

Lelo olongi etumba ya yo e, opema na boboto (2x).

Ozali ngondo wa esengo

Opesi lokumu na Tata Nzambe

Longonya na yo e, Anuarite,

Okufi liwa lya bomartiru Anuarite (2x)

2. Okabi bomoi bwa yo mobimba se na maboko ma Nzambe

Osimbi se bilaka e ya kolanda Kristu tee na nsuka

Bisengo bya nse otali mpamba

Olandi Kristu na mpiko tee boyambi (2x)

Longonya na yo e, Anuarite e

Okufi liw’a bomartiru Anuarite

3. Tokosenge na yo lelo e

Ozala molobeli wa biso

Yo ngond’Anuarite, osambelela biso

Mpo ya Eklezya ya biso e

Osambela mpo ya ekolo ya biso e

Osambela mpo ya baboti ba biso e

Osambela mpo ya bilenge ba biso banso

Osambela mpo ya ba mibonza banso: osambelela biso