Toyemba App

Moto wa boyambi

J.Vatoma kuntonesa

Refrain. Moto wa boyambi alakisa misala,

Boyambi bozangi misala ezali pamba,

Kanisa ndeko o kati ya Eklezya,

Mosala nini osalaka na boyambi bwa yo,

Kanisa ndeko epai ya baninga,

Mosala nini osalaka na boyambi bwa yo e.

1. E yo ndeko fungola matoi mpe oyoka,

Tala elanga ya Nzambe ezali monene, ezangi basali

Salela yango mpo ‘te ozwa libiki (e ndeko)

2. E yo ndeko fungola miso mpe omona,

Tala baninga mingi babosani Nzambe, babungi nzela ya libiki,

Lakisa bango mpo ‘te bazwa libiki (e ndeko)

3. E yo ndeko fungola motema mpe okanisa,

Tala baninga mingi bazali na mpasi, baluki lisalisi,

Osali nini mpo‘te basepela (e ndeko)

4. E yotalani boyambi bwa Abrama na libonza lya Mwana

Abonzeli Nzambe, abengami moto wa bosembo

Mpe azwi lifuti (e ndeko)

5. E yo ndeko, fungola motema na esengo,

Pesa na Tata Nzambe libonza lya yo e na motema moko, Akosepela mpe

akobosana yo te (e ndeko)

Coda

Sala ozwa litomba (2x)

1. Lokola nkoko Abrama : sala ozwa…

2. Lokola nkoko Isaki: sala…

3. Lokola nkoko Yakobo: sala…

4. lokola nkoko Moïse: sala…

5. lokola nkoko Davidi: sala….

6. Lokola Mama Maria: sala….

7. mpe na ba profeta banso.

8. Mpe na bapostolo banso…..

9. Na ba martiro ba Uganda….

10. lokola Ngondo Anuarite….

11. Lokola basantu banso: sala ….