Yeruzalem (kinshasa) kanga motema
Refrain. Yeruzalem (Kinshasa) kanga motema, ngenge lokola mwinda,
Nzambe azali na yo, nkembo ya Nzambe ebimeli yo.
1. Butu bokwei o mokili mobimba
Mpe molili mokoti o bikolo binso,
Kasi Nkembo ya Nzambe emononi o mboka ya yo,
Yeruzalem sepela,
Yeruzalem kanga motema, Yeruzalem sepela.
2. Bakonzi banene bakolanda mwinda mwa yo,
Mwinda mwa ntongo etani,
Tombola elongi mpe tala epai n’epai.
3. Bato banso basangani esika yoko,
Bakoya epai na yo, bakosepela na yo.
4. Bana babali ba yo bazali mosika, bakozonga, bakozonga,
bato bazali koya na bana ba yo,
Yeruzalem sepela (2x).
5. Bakoyela Yo bilok’o nzela ya mai,
Okozwa mabonza ma bikolo binso bya mosika,
Yeruzalem sepela (2x).
6. Bato ba Saba bakoya na wolo, mpaka ya malasi,
Yeruzalem sepela,
Bakotambwisa lokumu la Mokonzi Nzambe wa biso,
Yeruzalem sepela (2x) Hum……….
Nzambe wa ngai (2x) bikisa Yeruzalem
«On pourra remplacer Yeruzalem par Kinshasa ou le nom d’une autre ville»