Toyemba App

E bolingo

A.Libondo

1. Linga moninga wa yo lokola yo moko ndeko e: bolingo e!

Bolingo mobeko monene Kristu’atikeli biso e: bolingo e!

Nyongo ngai na yo tokofuta na mokili kaka bolingo e!

Réfrain. E bolingo e bolingo e!

E bolingo e bolingo e!

Tolingana banso bolingo ya solo e!

Bolingo ya solo ewuti na Nzambe bolingo boleki!

2. Bolingo ezali na nkanda te e moninga: bolingo e!

Bolingo ezali na zuwa te e moninga: bolingo e!

Se koyokana, kosalisana mpe kolimbisana: bolingo e!

E bolingo, bolingo ebolingo !