Mokonzi salisa ngai
Réfrain. Mokonzi salisa ngai (Ngai elenge ngai elenge)
Nakima bisengo bya nse’eye (bisengo bya nse)
Mpo nameme kuruse ya Yo.
1. Mokolo mosusu elenge mobali,
Elenge mobali atunaki Yezu:
Nasala nini mpo ya bokonzi bwa Yo e?
Mpo’te na kot’o bokonzi bwa likolo e? (Mokonzi)
2. Mokonzi alobi sok’olingi kokota,
Kokota kuna o bokonzi bwa likolo e
Teka biloko bya yo binso e
Kabola ndambo na bato banso babola
Nde ozwi lifuta kuna o likolo e
Tika binso bya yo yaka yaka landa Ngai (Mokonzi)
3. Lelo Mokonzi akolobela biso’te
Tokoma bato ba motema bolamu
Tolingana banso na bolingi bwa Ye e
Wana nde tozwi bokonzi bwa likolo e (Mokonzi)