Nkombo na yo nkolo
- Nkombo na Yo Nkolo, esepelisaka ngai motema
Nalingaka koyoka nkombo mosusu te
Se ya Yo Nkolo se ya Yo Nkolo
- Na ndako, na nzela, bipai binso nakokende
Nkolo nkombo na Yo, nakoki kobosana te
- Bapaganu bakotunaka ngai mpo nini nakumisaka Yo e
Nalingaka kotanga nkombo mosusu te,
Bobele ya Yo, bobele ya Yo
- Na mpasi, n’esengo, bipai binso nakokende
Nkolo nkombo ya Yo, nakoki kobosana te
- Yezu mwinda mwa ngai, olakisa ngai epai ya Tata e,
Nakangema ngai na Ye kin’o liwa, kin’o liwa e