Ndeko lengele etumba
1. Ngai moto wa liboso e
Ngai moto wa nsuka e
Ngai moto nde nazali Nkolo wa bomoi
Nakufaki kasi nazali na bomoi
Mpe nazali na mafungola ma liwa
Refrain. Ndeko lengel’ etumba kangama na Yezu,
Ndeko lengel’ etumba okatisa ngambo
2. Oy’akokot’o sekele ya ngai wana
Mpe akondima kokatisa ngambo
Nakopesa ye kiti ya bokonzi
Penepene na Tata wa ngai o likolo
3. Oy’akoyamba ngai tee na liwa
Mpe akondima kokatisa ngambo
Nakopesa ye enkoti ya bokonzi
Penepene na Tata wa ngai o likolo