Toyemba App

Ndeko kende malamu

Balenza / atumenga

Refrain. Ndeko kende malamu (2x)

Opema n’esengo kun’o likolo

Opema n’esengo o mboka Nzambe

Tokolela e tokolela e tokolela e ndeko akei e

1. Ndeko tolingaki mingi atiki biso na mawa e

Ndeko tolingaki mingi azongi o mboka Nzambe

Kende malamu

2. Elikya na biso bakristu esili te

Elikya na biso bakristu nde tomonani lisusu

Kende malamu

3. Moleki nzela azongi epai ya Mokeli na ye

Moleki nzela azongi o mboka nkembo lelo

Kende malamu