Toyemba App

Liwa nzela ya moto nionso

P.Balenza

Refrain. Liwa e, liwa e

Ezali nzela ya moto nionso

Ezali mokano ya Nkolo liwa e

Ye mei akeli moto, Ye mei abengi moto

O mboka Ye e liwa e

1. Tata Nzambe alingi ekelamu na Ye na lolenge la Ye

Alingi moto nionso amona nkembo mpe bolingo bwa Ye

Yango apesaka biso ntango na mokili

Mpo’te tomilengele e malamu tomilengele e.

2. Towuta na mabele, baninga tokozonga se na mabele

Nzoto na biso bato ekopola, ekowumela seko te

Molimo na biso yango nde liyaka ya talo koleka

Tobatela yango bandeko ntango tozali na bomoi

3. Ekomi biso na mokili oyo totondoko Nzambe

Mpo Ye Mokeli mpe Mozalisi wa moto

Mokolo ndeko awei tokomi koluka koyeba ntina

Epai ya ba ndoki, ya banganga, tobosani Nzambe

4. Totika konyokolo baye bakufeli balongani

Totika konyokolo bana bakufeli baboti

Totika koyokisa Nkolo mawa na makambo ya bonsoni