Toyemba App

Tata toyei epai ya yo

R.Mutshipule

Refrain. Tata toyei epai ya Yo, toyei kosenge mpe kobondela

Mpo ya milimo mya baye bawei

1. Tozala motema moko na losambo

Mpe Nzambe akopesa bomoi bwa seko

Na bandeko ba biso bawei

2. Soki otali masumu ma baye bawei

Nani nde akoyingela o mboka ya Yo

Tata Nzambe limbisa bango

3. Na elikya enene tokosambela

Mpe tokobenga nkombo ya Yo Esantu

Tata Nzambe oyamba bango

4. Tokobonzela Yo bandeko bawei

Elongo na Nganga Nzambe wa biso

Losambo loye Nzambe oyamba lango