Ndeko lelo akei
Refrain. Ndeko lelo akei epai ya Nzambe
Mboka ya esengo ndeko lelo akei
1. Mokonzi Yezu alobaki na biso banso
Oyo ayambi Ye akokot’o likolo
2. Biso banso toyebi lisolo ya Lazaro
Yezu asekwisaki ye awa ayambaki Ye
3. Akosekwisa mpe ndeko wa biso
Mpo ayambaki Ye awa o mokili
4. Yo mpe ndeko otikali awa o mokili
Omibongisa mpo ya kokot‘o likolo