Toyemba App

Boni mokonzi otiki biso

Tiré de toyembani

Refrain. Boni Mokonzi otiki biso (2x)

Otiki biso na mpasi e

Mpasi ye ye (2x) mpasi ya liwa.

1. Soki ozalaki awa Yezu, ndeko wa ngai nd‘akufaki te

Ata bongo nayebi’te

Nzambe mpenza nd’apesi Yo mans’osengi Ye

2. Yezu azongisi biso boye, ngai nde Bomoi na mpe Nsekwa e

Moto oyo akoyamba Ngai e

Soki awei nde asekwi mpo ya seko e

3. Solo Mokonz’ozali Kristu e, Mwana wa Nzambe ayei o nse

Mobikisi wa biso banso

Tee o liwa mpe na bomoi bwa lobiko e

4. Yezu toleli lokola Yo mei, talaka ndeko wa Yo ye oyo

Ya solo omolingi mingi

Salisa ye asekwa e, ye moninga wa Yo