Toyemba App

Kozala mokristu

A.Kazadi

Refrain. Kozala Mokristu, esengo enene

Kozala Mokristu, esengo mpenza e.

1. Lokumu na biso, kotosa Mokonzi

    Kolinga baninga, mpe Nzambe

    Mokristu nde nani, moto wa boboto

    Moto wa esengo, moto wa boyambi

2. Na mayi ma batisimu, tozui solo nguya e

    Ya kokoma bana ba Nzambe mei ;

    Tolingana banso, tosangana banso

    Tozali solo banaba Tata Moko e

3. Na ntango ya mpasi, tomema kuruse

    Tozala se na mpiko y’Elimo

    Mokolo mwa nsuka, tokozala banso

    Elongo na Tata, Mwana na Elimo