Toyemba App

Lokumu nkembo

J.Abbé likolo

1. Lokumu, nkembo na Mokonzi e aluboli basaleli basika e

    Basala mosala elongo na Papa, babimisa, bapesa malako kitoko.

    Bamipesa mobimba na nguya y’Elimo, bamikaba penza na bolingi e

Refrain. Yemba banso:

Aleluya, totondo Nzambe asali malamu (bis)

2. Tobonzeli Nzambe baye aponi, bazala banso na mpiko ya solo e

    Batambwisa Eklezia elongo na Papa na boyambi mpe na bondimi bomartiro,

    Bakende liboso tee na suka, batala lisusu na nsima te.

3. Bakristu banso sepelani e bana ya Congo kumisani e,

    Bokasi bwa Nzambe bomonani e

    Abyangi Episkopo wa lokumu (Sango wa lokumu) ameme mokumba

    Monene lisusu na mwinda mwa Kristu