Esengo, tozwi cardinal
Refrain. Esengo e, o esengo, esengo enene na mboka Congo,
Tosepeli lelo o esengo, tozwi cardinal ya sika.
Tokumisa Nzambe, toyembela Nzambe,
Tokumbamela ye mpo na manso asali (2x)
1. Bakristu ba katoliko bosepela
Boyakani banso lisanga na esengo
Toteleme, tongenge na mwinda mwa Kristu
2. Bamama katoliko longonya na bino e
Nzambe liboso zala na mwinda
Boteleme, bongenge na mwinda mwa Kristu
3. Ba légionnaires sapele na maboko
Losambo na monoko mwa bino ntango inso
Bolembaki te kosenge na Nzambe (2x)