Nganga nzambe moto wa esengo
Refrain. Nganga-Nzambe moto wa esengo
Moponomi wa Nzambe Tata e
Aluboli ye, akulisi ye bonganga e
Mpe apakoli ye mafuta masantu (2x)
1. O miso ma Nzambe mpe ma bakristu
Ozui etinda kati ya Eklezya
1-4. Esengo lelo (2x) mpo na nganga-nzambe ya sika tozui e
2. Nzambe akoba mosala moye abandaki na yo uta kala
3. Botondi na tata mpe na mama
Babonzeli Eklezya Nganga Nzambe
4. Kamba mpata, mpata eye santisa
Mpe batela yango malamu
5. Lokumu na Tata, mpe na Mwana
Lokumu na Elimo Santu