Ngai mokristu
1. Ngai mokristu nkombo y’esengo, nkombo yango nkombo y’elengi
Nkombo ya biso tosepelaka, ngai mokristu se bongo seko
2. Ngai mokristu nazwi batisimo, mpe nazali mwana wa Nzambe
Elembo ezalaka o molimo, ekopesaka ngai bokonzi
3. Ngai mokristu, Ye Nzambe Tata, akotala ngai na bolingi
Na ngai mpe mwana nakomolinga, nakosalela Ye malamu.
4. Ngai mokristu, Ye Yezu Kristu, azwi ngai lokola ndeko
Na kuruse afuti masumu, mpe na liwa abikisi ngai
5. Ngai mokristu Elimo Santu, akosantisa ngai molimo
Mpe na makabo ma Ye manso, akolendisa ngai motema
Usage liturgique: Baptême