Toyemba App

Libala mokano mwa nzambe

J.Sengambo

Intro : Lata mpete eye lokola nde elembo ‘te nalingi yo

Refrain. Solo libala, mokano mwa Nzambe,

Bandeko ba biso, basali libala lelo

Wana esengo na libala na bango

Totondoni Nzambe Mokeli ya libala, Tata

1. Mobali akotika baboti ba ye

    Mwasi mpe akotika ba ye baboti

    Bakosangana bakokoma moto moko

    Mpe nzoto moko na libala, mokano mwa Nzambe

2. Libala eloko ya motuya, libala eleki ntalo

    Libala eloko ya motuya

    Mabota boyoka, basi boyoka oyo elobi Ye

    Mibali mpe boyoka oyo elobi Ye

    Bandeko basi bobosana mobali oyo

    Bandeko mibali bobosana mwasi oyo,

    Oyo Nzambe akangi moto akangola yango te

3. Esengeli bokanga matoyi na bilobaloba bya bato

    Mpe bozipa miso na bimonamona bya bato

    Moto bokovanda na ye kin’o nsuka ya molongo ye oyo

    Makambo ya ndako na bino bobongisa yango na Kristu

    Loboko, bolimbisi, bolingo sekele ya libala

    Tika Nzambe abenisa libala oyo na nkombo ya Yezu