Solo bolongani
Refrain. Bolongani (2x) lelo e, solo bolongani e esengo enene
Mokano mwa Nzambe kati na bino e, ekokisami e.
1. Tokumisa Ye, totondo Ye,
Ye nde Mokeli wa libala, solo bolongani e
Bondimami o miso ma Nzambe mpe o miso ma bato: solo bolingani e
2. Libala lisantu, libala lya seko e ndeko
Bokabuana te: solo bolongani e
Ndeko bobalani, ndeko bobalani
Mpo ya seko bobalani e: solo bolongani e
3. Na kati ya mpasi bobuaka elikya te,
Nzela na bino se Kristu: solo bolongani e
Ndakisa na bino libota lisantu: Yozefu, Maria mpe Yezu, solo bolongani e